Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

RDC ezali komilengele mpo na kozongisa ba Congolais bakangami libanda mpo na COVID19


Bato bazali kotambola na boulevard Trimphal na Kinshasa, 22 janvier 2014.
Bato bazali kotambola na boulevard Trimphal na Kinshasa, 22 janvier 2014.

Ambassade ya Ekolo Congo Démocratique na Ouganda esengi na ba Congolais banso bakangami na mobembo na mboka eye kokomisa nkombo na bango na ntina ya mabongisami bwa bozongisami na bango. Mbulamatari esakoli mikolo mibale mileki ete ezali komibongisama mpo na yango.

"Na mikano mya bakonzi ya mboka, esengami na lombango na bana banso ba Congo baye bazalaki na mobembo to na boleki na Ouganda mpe bakangami likolo ya mibeko ya kokanga ndelo mpo na kopekisa bopanzani bwa COVID 19, kokomisa nkombo na bango kino le 13 avril 2020 na nzela ya numéro WhatsApp ya secretariat ya ambassade +256759409030," ekomi na liyebisi ambassade ya RDC na Ouganda.

Mikolo mibale mileki, mbulamatari eyebisaki ete ezali komibongisa mpo na kotala ndenge ya kozongisa bango na mboka.

Ministre d’Etat ya mambi ya Mboka bapaya Marie Ntumba Nzeza alobaki ete apesi mikano na ba ambassades kokomisa nkombo ya ba Congolais banso bakangami na mboka mingi.

Ba Congolais mingi bakangami libanda babwakaki mbela na bakonzi kosenga bango kozongisa bango.

XS
SM
MD
LG