Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mgr Gerard Mulumba na Déo Rugwiza bakufi


Mgr Gérard Mulumba na bokanisi ya mibu mibale ya liwa ya Etienne Tshisekedi, na Kinshasa, 1er février 2019. (Facebook/Fatshi News)
Mgr Gérard Mulumba na bokanisi ya mibu mibale ya liwa ya Etienne Tshisekedi, na Kinshasa, 1er février 2019. (Facebook/Fatshi News)

Mgr Gerard Mulumba, tata leki mpe mokambi ya Maison civile ya président Félix Tshisekedi akufi na Kinshasa na COVID-19, elobi boko na ba episkopo ya eklezia katoliko ya RDC. Ndenge moko mpe DG ya DGDA Déo Rugwiza awei ye mpe loloka kasi nsima na bokono ntango molayi.

CENCO (Conférence épiscopale nationale ya Congo) esakoli liwa lya Mgr Mulumba, episkopo ya lokumu ya kala na Mweka na Kasaï, na mibu 83.

Mgr Mulumba awei na cliniques Ngaliema na Kinshasa. Azalaki leki na Etienne Tshisekedi, tata ya président Félix Tshisekedi oyo akufaki le 1er février 2017 na mibu 85.

"Ezali na kokamwa mpe na mpasi nde nayoki na ntongo ya lelo liwa ya Mgr Gerard Mulumba, mokambi ya maison civile mpe tata leki na yo. Nakaboli mawa ya motema na yo na eleko eye ya mpasi," elobi mokonzi ya kala Joseph Kabila, kolanda compte Twitter ya FCC (Front commun pour le Congo), lingomba .

Nzokande Déo Rugwiza, mokambi (DG) ya Direction Générale des Douanes et Accises, awei na mibu 71. Awumelaki na bokono bwa ye boye bolobelami te.

XS
SM
MD
LG