Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Général Mokoko aboyi kobima boloko mpe kozala na matanga ya mama wa ye


Jean-Marie Michel Mokoko, candidat présidentiel indépendant, lors d’un rassemblement de clôture de campagne à Brazzaville, le 18 mars 2016.
Jean-Marie Michel Mokoko, candidat présidentiel indépendant, lors d’un rassemblement de clôture de campagne à Brazzaville, le 18 mars 2016.

Opposant général Jean-Marie Michel Mokoko aboyi kobima boloko mpe kozala na matanga ya mama wa ye ata Tribunal ya grande instance ya Brazzaville epesi ye ndingissa.

Akomi mokanda mpo na kosenga bolimisi na mama wa ye mpo na akozala te na matanga.

Mokanda yango mobimisami na journal en ligne "Les Echos du Congo-Brazzaville".

Tribunal ya grande ya Brazzaville epesaki ye ndingisa ya kobima boloko mpe kokende na matanga ya mama na ye mpo na samedi 26 octobre 2019 wuto 9h kino 15h mpe mpo na lundi 28 octobre 2019 na se ngonga moko wana.

Na mokanda akomeli mama na ye nsima liwa, général Mokoko azali kopalela lolenge misala ya bosembo mikatelaki ye mibu tuku mibale ya boloko nsima ya maponami ya mokonzi ya mboka ya 2016 mpo na kobebisa bokengi mpe mpo na kozwama na mandoki.

Atiyamaki na bokoloko wuto 2017.

XS
SM
MD
LG