Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mboso, Kabund na basusu balongi maponami ma Bureau ya Assemblée nationale


Christophe Mboso Nkodia Mpuanga, mokambi ya sika ya ndako ya bokeli mibeko na RDC, na photo ya le 8 décembre 2020, na Palais du peuple, Kinshasa
Christophe Mboso Nkodia Mpuanga, mokambi ya sika ya ndako ya bokeli mibeko na RDC, na photo ya le 8 décembre 2020, na Palais du peuple, Kinshasa

Christophe Mboso Nkodia Puanga, président ya Bureau d’âge, alongi maponami ma mokambi ya Bureau définitif ya Assemblée nationale. Ndenge moko mpe na Jean-Marc kabund, mokambi ya UDPS, na ebonga ya mokambi molandi wa yambo.

Bakeli mibeko 389 nde baponi mpo na M. Mboso. Nkasa 77 esakolamaki mpamba.

M. Kabund azwi koleka maponami 365.

Bilembo byango bizalaki ya kokamwisa te mpo kaka nokombo moko to candidature moko nde endimamaki mpo ne bibonga mingi.

Cour ya cassation ebwakisaki bosenga ya baye banso bapesaki nkombo na bango bo' indépandants, mingi mingi bayi FCC.

Bureau définitif ekovandisama na ebonga o'mokolo mwa minei.

XS
SM
MD
LG