Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

FARDC elobi elokoti ebembe ya soda ya MONUSCO moko na Beni


Général Bernard Commis mokambi ya mibale ya mampinga ya ONU na Congo démocratique liboso ya basoda ya Monusco bakufaki na bitumba na Beni, Nord-Kivu, 18 novembre 2018. (Twitter/Monusco)
Général Bernard Commis mokambi ya mibale ya mampinga ya ONU na Congo démocratique liboso ya basoda ya Monusco bakufaki na bitumba na Beni, Nord-Kivu, 18 novembre 2018. (Twitter/Monusco)

Mampinga ya ekolo Congo démocratique mayebisi ete malokoti nzoto ya soda moko ya MONUSCO na camp moko eye mabotalaki ya na ba ADF na Beni.

"Na camp moko ya ba ADF, tokuti oyo etikali na nzoto ya casque bleu moko akufaki na bitumba," esakoli molobeli ya na AFRC, général Léon-Richard Kasonga na bokutani na bapanzi sango.

Molobeli ya ba FARDC ayebisi te mokolo bitakali ya nzoto eye bimonanki to mokolo bamobomaki.

Ba Casques bleus balobi o’mokolo mwa yambo ya mposo ete bakomikotisaki na bitumba ya ba FARDC. MONUSCO etindaki basoda na yango ya brigade ya intervention eye ezalaka na bayi Afrika ya ngele, Tanzanie mpe Malawi.

"Tokoloki carte militaire na ye… Nazali te na makoki ya koyebisa bino ekolo na ye sik’oyo," elobi gén. Kasonga.

Bayi MONUSCO bandimi ete bazwi sango yango kowuta na ba FARDC mpe bayebisi ete "ekolo mpe libota ya mowei bakozwa sango kasi koluka kosolo soki mowei yango azali nani ekozwa mwa ntago," elobi molobeli ya MONUCO.

Bayi Beni bazalaki kotelemela MONUSCO wuto mposo mibale mpe kofunda yango kopekisa te ba ADF koboma bango.

O'butu ya lundi na mardi bato libwa babomamaki na baye bafundami kozala ba ADF.

Uto libandela ya sanza ya zomi na moko, koleka bato 110 babomamaki na ba ADF.

XS
SM
MD
LG