Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

FARDC epesi "numéro vert" na bavandi ya Beni mpo na kofunda "supect" nyonso


Général Syvlvain Ekenge, molebeli ya mibale ya ba FARDC, na bokutani na banzi sango na Beni, Nord-Kivu, 26 septembre 2019. (VOA/ERikas Mwisi)
Général Syvlvain Ekenge, molebeli ya mibale ya ba FARDC, na bokutani na banzi sango na Beni, Nord-Kivu, 26 septembre 2019. (VOA/ERikas Mwisi)

Bakambi ya mampinga ya ekolo Congo démocratique bapesi na bapesi bavandi ya territoire ya Beni numero vert to motango ya kobenga na lombango soki bamoni soda to moto oyo bazali na ntembe mpo na ye.

Meko yango mozwami mpo na kopekisa bobomami ya basoda, eyebisi Gén. Léon-Richard Kasonga, molebeli ya ba FARDC.

"Topesi bino motango ya kobenga mpo toya kosunga bino: +243820800005. Nsima na ba minutes miki bato ba biso bokaya kokamata moko oyo boni ye malamu te," elobi Gén. Kasonga.

Nzokande bavandi ya Beni babomi basoda mwambe ya FARDC mposo moleki mpe bafundaki bango kozala batomboki ya ADF.

Molebeli ya mampinga ya ekolo Congo démocratique apaleli ekela eye.

Gen Leon-Richard Kasonga alobi ete esenegeli te na bana ya Beni bapimela basoda bonsomi na bango ya kotambola ntango bazali kosala mosala te.

Mpo na ye, bavandi bakanisaki ete basoda baye bazalaki banguna kasi bamikosaki.

Gen Kasonga asengi ete makambo maye masila.

Kati na basado baye, moko bamobomaki o’mokolo ya mitano moleki ntango azali kotambola elongo na molongani wa ye na quartier Mabasele, na Oicha, na territoire ya Beni.

Na Beni mpe Butembo bato bazali kotambola na makolo o’mokolo ya mibale ya ville morte, bavandi o’ndako basali mosala te.

XS
SM
MD
LG