Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Evangéliste Reinhard Bonnke akufi na mibu 79


Libota ya evangeliste Reinhard Bonnke esakoli kufa na ye, 7 decembre 2019. (Facebook/Evangeslit Reinhard Bonnke-Offical Page)
Libota ya evangeliste Reinhard Bonnke esakoli kufa na ye, 7 decembre 2019. (Facebook/Evangeslit Reinhard Bonnke-Offical Page)

Evangeliste Reinhard Bonke, mobandi mpe mokambi ya CfaN (Kristu mpo na mboka inso - Christ for all Nations) awei lelo le 7 décembre 2019, eyebisi libota mpe eklezia waye.

Moteyi sango elamu eye azalaki na mibu 79.

"Na mawa mitema nde libota ya ba Bonnke lizali kosakola liwa ya molongani, tata, mpe yaya, Evangeliste Reinhard Bonnke. Akufaki kati na libota waye o’mokolo ya le 7 decmbre 2019," esakoli liyebisi litiyami na Facebook Evangelist Reinhard Bonnke-Officiel Page.

Reinhard Bonnke ateyaka sango elamu ya Yesu na mokili mombimba mibu tuku motoba.

Ateyaki lobiko loye lozali nakondima kufa mpe lisekwa na Yesu Klistu. Ateyaki nguya eye ezali na mosala ya Yesu Klistu asalaka na ekulusu mpe na molilo Santo to "Sango elamu na moto - na nguya".

Bikamwa bisalamaki mingi na moboko ma ye na nkombo na Yesu. Kati byango lisekwa na bawei.

XS
SM
MD
LG