Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Etats-Unis elingi bosilisami ya matata na kimya na moneyele ya RDC (Ntoma ya Amerika na ONU)


Ntoma Kelly Craft (G) ya USA, na masolo na président Donald Trump, na base ya Bagotville, na Canada, 9 juin 2018.
Ntoma Kelly Craft (G) ya USA, na masolo na président Donald Trump, na base ya Bagotville, na Canada, 9 juin 2018.

Amerika elingi ete matata na monyele ya RDC masilisami na boyokani bwa kimya, elobi mardi ntoma ya Amerika na ONU, Kelly Craft, na likita lya bikolo.

Ntoma Kelly Craft alibi ete Etats-Unis etungisami na komona lolenge bitumba bizali komata na Ekolo Congo démocratique, na kotangaka na kati bitumba basimba minduki bazali kosala na ba civili.

"Bosilisi matata na kimya yango nde politiki ya yambo ya Etats-Unis mpe tozali kotala ndenge nini boyokani kati na Etats-Unis na RDC bokoki kozala mpo na bolamu bwa bavandi ya mboka," ekomi na compte Twitter na ye Kelly Craft.

Nzela ya kimya ekowumelaka ekosenga biyano bya politiki mpo matata maye mayebani epayi nini mazali kosalama, lokola mpe bokambi bolamu mpe mbongwana ya politki ekali makambo manso, elobi Kelly Craft.

Apesi losako na mbulamatari ya RDC mpo yang onde ezali kosala.

Kelly Craft apemali mpe bozwami y abasi na makasi. Ezala eye salami na basali ya lisungi mpo na Ebola mpe na MONUSCO, misala mya ONU na RDC.

Asengi bikolo binso bisala makasi mpo na kopekisa basoda ba yango kozwa basin a makasi na RDC.

USA epesaka maboko na makasi ma ONU mpo na makoki mapesa na MOnUSCO nan tina ya kotelemela bobkinsi mpe bitumba likolo y aba civili ba RDC baye bavandaka na bozangi bokengi wuto koleka mibu 20. Tokokoba kopesa maboko na bitumbu bipesama na mangomba manso mabundisa kimya mpe bokengi na RDC, ekomi Kelly Craft.

XS
SM
MD
LG