Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Amerika ezali komema bitumba na kaniaka na RDC na bozindo


Me Akere Muna (3e G) na bakambi ya Agence ya bopekisi mpe kobundisa kaniaka APLC elongo na bakambi ba PNUD mpe ya Misala mya sembo mpe bopekisi drogue to bangi na ambassade ya USA, Kinshasa, 2 septembre 2020. (Twitter/Akere Muna)
Me Akere Muna (3e G) na bakambi ya Agence ya bopekisi mpe kobundisa kaniaka APLC elongo na bakambi ba PNUD mpe ya Misala mya sembo mpe bopekisi drogue to bangi na ambassade ya USA, Kinshasa, 2 septembre 2020. (Twitter/Akere Muna)

Mosambeli ya bitumba na kaniaka Akere Muna akutanaki na bakambi ya Agence ya bopekisi mpe kobundisa kaniaka (APLC)  elongo na bakambi ba PNUD mpe ya Misala mya sembo mpe bopekisi drogue to bangi  na ambassade ya Etats-Unis.

Moyi Cameroun Akere Muna atimaki bo' mosambeli ya RDC mpo na bitumba na kaniaka, na président Félix Tshisekedi, na lisungi lya PNUD eye epesaka ye lifuta.

Tibor Nagy, sous-secrétaire d’Etat ya Amarika azalaki te na masolo mango kasi alakisi na Twitter ntima na yango.

"Etats-Unis ezali mosungi ya mpiko na bitumba na kaniaka, Yango nde linkambo lya motuya mpo ete Ekolo Congo démocratique ekoka kosalela makoki mango manso," ekomi Tibor Nagy na Twitter..

Nzokande, ntoma ya Amerika na Kinshasa, Mike Hammer akutanaki kaka na Kinshasa mpe lokola na basi to ba mama bamikotisi na bitumba na kaniaka.

Kaka na mokolo moko wana, ambassade ya Etats-Unis na Kinshasa esalisaki bokutani na nzela ya internet kati na département ya trésor (Ministère ya Finances ya Amerika) na secrétaire exécutif ya cellule nationale ya renseignements financiers (CENAREF),

Masolo na CENAREF mazalaki mpo na maye matali bobateli bwa secteur minier na RDC na mbeba inso ya kolekisa misolo mibe na nzela malamu, mpe kopesa misolo na misala ma dongolo miso (terrorists) mpe baye basalaka kaniaka.

Etats-Unis ezali na RDC ne boyokani ya malamu mpe kimya mpe bofulukisami (PP4PP) wuto président Félix Tshisekedi azwaki bokonzi na janvier 2019.

XS
SM
MD
LG