Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

RVA etindi lipinga lya bayi Jeffery Travel kozwa ballon ya Google/Loon ekweyaki na Buta


Ballon stratophérique ya Google/Loon ekweyaki na Buta (Bas-Uele)
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:02:50 0:00

Ballon stratophérique ya Google/Loon ekweyaki na Buta (Bas-Uele)

Basali ba compagnie Jeffery Travel batindami kozwa ballon mpe bisaleli ya Google Loon ekwaki lundi pene na Buta, na Bas-Uele, eyebisi mokambi ya RVA (Régie des voies aériennes).

Ballon yango ekwayaki lundi pene na Buta. Ezali moko na ba ballons ya copagnie ya Amerika Google Loon etindaka na kati na mboka mingi na ntina ya kopesa bato internet esaki yango ezalaka te.

Bato babale bakangamaki lundi na Buta mpo na koluka kozwa ballon yango, elobaki mokambi ya etuka ya Bas-Uele, Valentin Senga. Pakistanais moko na moyi RDC moko.

"Société ya Amerika (Google/Loon) ezali boyokani na biso, yango epesi biso nzela ya ko pesa maboko na lipinga lyoko na mabele soki ballon stratosphèrique ezwi nkwokoso to ekweyi mpo na likambo songolo na RDC lokola yango esalami le 24 aout na esika okambaka," ekomi DG ya RVA Jean Tshiumba Mpunga na mokonda atindeli mokambi ya etuka ya Bas-Uele.

Kasi na mokanda mwango alobi te soki bato babale baye bakangamaki bazali kati na lipinga lyango.

XS
SM
MD
LG