Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Eklezia ya RDC katoliko epameli bobebisi ndako ya Nzambe mpe bofingami bakambi ba yango


Botambali ya bayi katoliko libanda lya ndako ya Nzambo François De Sales, na Kinshasa, le 25 février 2018.
Botambali ya bayi katoliko libanda lya ndako ya Nzambo François De Sales, na Kinshasa, le 25 février 2018.

Eklezia katiloko epameli bobebisi ndako ya Nzambe mpe bofingami ya bakambi ba yango na bilenge baike o’mokolo mwa mposo mpe eyenga. Esalami mikolo mibale nsima na bozangi boyani kati na bakamabi biyamba na kopona motambwizi ya CENI.

"Topameli ba makasi bikela biye mpe mbano na yango mpe tosengi na bandimi banso ba katoliko kozala mpenza na ekenge," elobi liyebisi lya archidiocèse ya Kinshasa etiami manzaka na chancelier na yango, abbé Georges Njila.

Bilenge baike, pene na tuku mibale na ndambo, bamonisamaki na bililingi bitambolaki na ba réseaux sociaux, konganga mafinga mpe koyemba nzembo ebe na nkombo cardinal Fridolin Ambongo, o’mokolo mwa eyenga liboso lya Centre Lindonge, na Limete, na Kinshasa, epayi archévêque (episkopo ya lokumu ya Kinshasa} asalaka mosala.

Basusu kati na bilenge baye bazalaki kobwaka mabanga.

Nzonkande na Kasaï bato baike bakotaki na ndako ya Nzambe zomi na moko, babukaki biloko .

"Ezali bobeisi biloko bya ndako ya Nzambe na nko, makambo ya mabe, mpe ya kopesaka nkanda," ekomi na liyebisi Mgr Bernard-Emmanuel Kasanda, episkopo ya Mbujimaui na Kasaï-oriental.

Mgr Kasanda ayebisi ete bato basali makambo maye "bamemi esika ya kobomba communion, nkeni mpe sani esantu, mabanga mpe bilamba bizipaka lotalo, mesa mpe bikeko bya Yesu na ya mosantu Maria".

Bilili bimonisi na ba réseaux sociaux bilakisi bikeko bibukani, mesa epanzani mpe bikolo misusu bibebisami kati na ndako ya Nzambe mingi.

Augustin Kabuya, kalaka mokonzi ya UDPS, lingomba lya président Félix Tshisekedi, alobi na AFP ete "lisanga na bango lipameli bobuki ya ndako ya Nzambe ya katoliko ata lizali kotelemela mokano ya bakambi ba katoliko na kobanda na moye mwa cardinal Ambongo".

"Moto moko te azali na ndingisa ya koleka nsima na maye mazali kosalama sika na politiki mpo akende kobebisa ndako ya Nzambe na bango," elobi M. Kabuya.

Na ngambo na ye Martin Fayulu, opposant oyo akoba kosenga elonga na ye na maponami ma mokonzi ya mboka ya 2018, apameli bobuki boye.

"Napameli na makasi manso mafinga maye masalami na Tata cardinal Ambongo kowuta na bato bazangi botosi mpe bobebisami na ndako ya Nzambe na Mbujimayi. Bikela biye bizali misala mya bato baike babungi nzela basengeli kozonga na lombango na nzela," ekomo M. Fayulu na Twitter.

O’mokolo mwa mitano, balakisi bilongi ba biyamba mwambe batiaki manzaka na mokanda kolaba ete bayokani te na kopona motambwisi mwa CENI (lokola mobeko mopesi bango bokonzi wana), kasi motoba kati na bango (Eglise du réveil, ba Musumans, Ordoxe, Kitwandi mpe ba Indépendants) batikaki nsima na yango mokanda balobi baponi motambwisi yango na bozangi ya bayi katoliko, misioni (ECC) na bayi Armée du Salut.

XS
SM
MD
LG