Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakambi babiyamba banso bakutana lisusu vendredi


Mokambi ya Conférence épiscopale nationale du Congo (CENCO), Mgr Marcel Utembi elongo na molobeli ya CENCO, abbé Donatien Nshole na masolo na bapanzi sango na Kinshasa, 30 décembre 2016.
Mokambi ya Conférence épiscopale nationale du Congo (CENCO), Mgr Marcel Utembi elongo na molobeli ya CENCO, abbé Donatien Nshole na masolo na bapanzi sango na Kinshasa, 30 décembre 2016.

Bakambi ba biyamba banso bakokutana lisusu vendredi na bobengisami ya Mgr Marcel Utembi ya CENCO mpo na kokoba boponi na matambwisi ya CENI.

Mgr Utembi, motambwisi ya CENCO (lisanga lya ba episkopo ya katoliko) mpe momemi lisanga ya bakambi ba biyamba nde abengisi baninga ba ye nsima na mokambi ya Aseemblée nationale, Christophe Mboso Nkodia Mpwanga, kopesa bango ngonga 48 mpo na koyokana.

Mikolo mibale mileki bakambi ba biyamba bakabwanaki na kozanga koyokana.

Motoba kati na bango (Eglise du réveil au Congo [ERC], orthodoxe, musulman, Armée du Salut, ba Indépendants mpe bakimbaguiste) basakolaki ete baponi mokambi ya CENI na bozangi ya ba katoliko mpe ba missioni, ECC.

Bureau ya Assemblée nationale eboyaki kondima procès verbal ya bakambi baye motoba mpe esengaki bango kosala lisanga.

Kasi mokambi ya ERC, prophète Dodo Kamba, alobaki ete bakambi motoba baye bandimi kokutana na ba katoliko na ba misioni kasi mpo na kosolola makambo masusu. Prophète Kamba ayebisi ete bakambi motoba basi basilisaki likambo lya kopona motambwisi ya CENI mpe bakozonga lisusu nsimate.

Mokambi ERC apesaki te nkombo ya moto baponi kasi boko ba bayi lisanga balobi ete ezali Denis Kadima oyo bakatoliko na ba misioni bandimi te mpo azali pene na mokonzi ya mboka Félix Tshisekedi.

Mercredi nde ezalaki mokolo esengelaki nkombo yango etikama na Assemblée nationale.

XS
SM
MD
LG