Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ensemble pour la République ya Katumbi eboyi kotinda balakisi bilongi na CENI


Moïse Katumbi na lisikulu na ye na Butembo, Nord-Kivu, 29 octobre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)
Moïse Katumbi na lisikulu na ye na Butembo, Nord-Kivu, 29 octobre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)

Ensemble pour la République, lingomba lya Moïse Katumbi esakoli ete ekotinda ata molakisi elongi moko te na CENI mpo na bozangi boyokani.

Lingomba lya Moïse Katumbi eye ezali kati liboke ya boyokani Union sacrée na président Félix Tshisekedi epameli bayike na lisanga na bango kokanga koluka kobotola mabongisi ma maponami kaka mpo na bango.

Ensemble pour la République ekotndima yango te. Eboyi, na ndenge eye, kopesaka nkombo ata ya moto moko mpo na CENI. Esangisi mongongo na ba forces sociales mpe politiques baye bazali kosenga bakonzi molimo ya kofungwama na ntina boyokani bwa solo mpe sembo, yango bosengi bokoki koboyama te mpo na mabongisi ma maponami ma kimya, mandimama, ya pole, ya bato basango mpe na botosi ntango esengami na Buku likonzi, elakisi liyebisi litiami manzaka na kalaka mokonzi na yango, Dieudonné Bolengetende.

Ensenle pour la République ekundoli ete président Tshisekedi alakaki kobingisa makambo mabe mpe ma snomo masalama na maponami malekaki.

Lingomba lya M. Katumbi ekundoli mpe bozangi boyokani mpe bomoko kati na bakambi ba biyamba mpe lipameli mbamba, bobangizi na kokana mabe likolo na bakambi ba biyamba.

XS
SM
MD
LG