Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

17e Roi Makoko, mokonzi ya Mbé mpe Bateke akufi na Congo-Brazzaville


Nkumu Mokonzi Makoko ya Bateke (C) na molongani wa ye Galifourou bazali kopesa mbote na mokonzi ya France Jacques Chriac na Brazzaville, 17 juillet 1996.
Nkumu Mokonzi Makoko ya Bateke (C) na molongani wa ye Galifourou bazali kopesa mbote na mokonzi ya France Jacques Chriac na Brazzaville, 17 juillet 1996.

Auguste Numpio, Nkumu mpe mokonzi ya Mbé mpe Bateke akufi na mibu 94 na Congo-Brazzaville, esakoli ba media ya Congo-Brazzaville.

Azalaki mokitani ya zomi na sambo na ngwende ya bakonzi ya Mbé mpe Bateke.

Makoko ya Mbé, bokonzi bwa ye boyebanaki ata yambo na Conférence to likita lya Berlin liye likabolaki Afrika na 1885.

Bokonzi ya Mbé ezalaki yambo na Congo-Brazaville, na eteni ya RDC mpe Gabon.

Makoko Auguste Numpio abotamaka nzinganzinga na 1927 na Liko, mboka ebganami lelo district ya Igné na Congo-Brazzaville.

XS
SM
MD
LG