Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba officiers 8 bakangami na Beni mpo na bobomi na bato na mobulu ya Kamuina Nsapu na Kasaï


Basodana milulu ya kopesama mpete ya ba lieutenant na académie militaire ya Kananga, na Kasaï, 11 janvier 2013.
Basodana milulu ya kopesama mpete ya ba lieutenant na académie militaire ya Kananga, na Kasaï, 11 janvier 2013.

Misala mya bosembo mya mampinga mitie maboko na ba officiers ya soda sambo na moko ya police na Beni, na Nord-Kivu, mpo na bobomami ya bato mingi na Kasaï ntango ya bitumba ya Kamuina Nsapu na 2012-2017.

Kolanda bayi bosembo, ba officiers 16 batindama na Nord-Kivu mpe en Ituri bayanolaki na parquet ya cour opérationnelle ya Nord-Kivu mpo etali bobomami bosalamaki ntango bazalaki na Kasaï.

"Sambo kati na ba officiers baye bakangamaki (nsima na koyonala na parquet), wuto le 22 juillet 2020. Mokambi ya parquet amemami kowuta na Bunia, na Ituri, colonel moko ya police oyo atiamaki na bokangami wuto le 7 août 2020," eyebisi moko na bayi misala mya bosembo ya basoda na Kasaï-central,

Ba officiers yango bafundami na bobomi baton kati na 2016- na 2017 na Kasaï ntango basimba minduki ya kabila baike bazalaki kobunda mpo na koboya liwa ya nkumu Kamuina Nsapu na mboka Tshimbulu le 12 août 2016.

Bayi bosembo balobi batiami na bokangami na kozela bosambisami bwa bango.

XS
SM
MD
LG