Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Dr. Oly Ilunga ayanoli na police mpo na mosolo ya bitumba na Ebola


Ministre ya kala ya bokolongono, Dr. Oly Ilunga na Beni, RDC, 20 décembre 2018.
Ministre ya kala ya bokolongono, Dr. Oly Ilunga na Beni, RDC, 20 décembre 2018.

Ministre ya kala ya bokolongono ya nzoto, Dr. Oly Ilunga ayanolaki na mituna ya police judiciaire o’mokolo mwa mibale na Kinshasa, mpo etali bosaleli mosolo mopesamaki mpo na bokono ya Ebola, eyebisi correspondant ya VOA Lingala na Kinshasa.

"Ministre Ilunga azali koyanola mituna kasi azali mokangami te. Nzokande basato na baye basalaki na ye basimbami na police mpo etali bolukiluki," eyebisi moko ya baye ya police na correpsondant ya VOA Lingala na Kinshasa.

Dr. Oly Ilunga atikaki mosala le 22 juillet nsima na botiyami ya Dr. Jean-Jacques Muyembe lokola mokambi ya misala ya bitumba na Ebola.

Dr. Oly Ilunga akomaki na mokanda ya botiki mosala na ye ete andimaki te mangwele ya mibale ya Ebola maye mabandi kopesama na est ya RDC epayi wapi bokono boye bozali kongala koleka mobu moko.

Afundaki mpe bozangi sembo na mokano ya botiyami ya cellule technique ya kobundisa Ebola.Akomaki ete cellule yango etiyamaki na kozongisa mikolo nsima mpe ntango ye azalaki te.

Alobaki mpe ete aboyaki mobulu mpe makele mozala na kozwa mikano kati na ye mpe misala ya cellule technique eye etiyamaki.

Nzokande bokono ya Ebola bosili koboma koleka bato 1990 banda sanza ya mwambe ya 2018/

XS
SM
MD
LG