Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Banque mondiale epesi 300 millions ya ba dollars mpo na Ebola


Bisaleli ya komibomba na Ebola, 24 juillet 2019. (Twitter/Banque mndiale)
Bisaleli ya komibomba na Ebola, 24 juillet 2019. (Twitter/Banque mndiale)

Banque mondiale epesi lisalisi ya 300 millions ya ba dollars mpo kobundisa Ebola na RDC, eyebisi mokambi ya banque eye, Kristalina Georgieva.

"Biso banso tosengeli kozuwa miko ya lombango mpo na kosilisa bokono ya kufa ya Ebola boye bozali kobebisa bomoi mpe biloko ya kobika na Ekolo Congo démocratique," ekomi na liyebisi Mme Georgieva.

Lisalisi liye ekomi nsima na OMS (Mabongisi ya molongo mpo na bokolongono) masakolaki mposo moleki ete bokono ya makila boye ya Ebola bozali bosenga ya makasi mpo na molongo mobimba.

"Tozali na bosenga mingi ya lisali mpe ya makoki ya molongo na ntina ya kopekisa ete mikakano miye mikoma makasi kati na mboka mpe mipalangisama koleka ndelo mboka, " abeti mokoloto Mme Georgieva.

Bokono ya Ebola esili koboma pene na bato 1.750 na sanza zomi na moko bozali kongala na RDC.

Nzokande président Félix Tshisekedi ya RDC alobaki mposo moleki ete azuwi na maboko bitumba na Ebola, mpe etiyaki misala ya banganga ya boyebi mpo na yango.

Kasi ministre ya Santé Dr. Oly Ilunga atikaki mosala mikolo mibale nsima na mokano moye ya M. Tshisekedi.

XS
SM
MD
LG