Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato babale bazuwami na Ebola na Mwenga, elobi bakonzi


Basali ya bokolongono bazali kosokola molato ya komibatela na Ebola na centre ya lisalisi ya Katwa, Beni, Nord-Kivu, 12 aout 2019. (Twitter/David Gresly)
Basali ya bokolongono bazali kosokola molato ya komibatela na Ebola na centre ya lisalisi ya Katwa, Beni, Nord-Kivu, 12 aout 2019. (Twitter/David Gresly)

Bato babale bamonisa na Ebola na Mwenga, ya Sud-Kivu, elobi mokambi ya etuka eye na mokambi ya bitumba na Ebola, Dr. Jean-Jacques Muyembe.

Moko na bato babale baye akufi o'mokolo ya mitano na Ebola mpe mwana wa ye amonisami na bokono boye na Mwenga, na Sud-Kivu, elobi bakambi ya misala bokolongono.

"Ezali bato babale baye bawutaki na Beni," elobi Dr Steve Ahuka, mokambi molandi ya bitumba na Ebola.

Mokambi ya etuka Sud-Kivu, Théo Ngwabidje, ayebisi ete mwasi moko ya mibu tuku mibale na motoba akufaki lobi na book boye mpe mwana wa ye azuwami na bokono bwango.

Misalaya kobundisa Eboal bakitka bae sika eye.

Kasi mikolo mibale mileki mwasi ya moto ya mibale azwamaki na Ebola na engumba ya Goma, na Nord-Kivu, abikisamaki na bokono boye elongo na bebe na ye, mpe babimaki na Lopitalo.

XS
SM
MD
LG