Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Misolo mizangi mingi na misala mya kosunga bato bazali na mpasi na RDC (OCHA)


Des déplacés internes attendent que le HCR distribue de la nourriture dans un camp à Kibati, Nord-Kivu, 2 décembre 2008.
Des déplacés internes attendent que le HCR distribue de la nourriture dans un camp à Kibati, Nord-Kivu, 2 décembre 2008.

OCHA, Bureau ya coordination ya lisungi, ebwaki mbela mpo na makoki mazali te ya kosunga bato ya mapsi na Ekolo Congo démocratique. "Na sanza minei yambo na mobu kosila, kaka 25% ya misolo mipesami na baye basungaka, elobi mokambi molandi ya OCHA," na VOA Lingala.

"Soki baye baspesa misolo babakisi misolo te, na ba mposo ekoya, mobu 2020 mokosuka mabe koleka," elobi Diego Zorilla, na mituna ya VOA Lingala.

"Basali ya misala ya lisungi (ba acteurs humanitaires) bakomemama na kopona kati na manaka ma bango mpo na kozwa kaka oyo ya motuya mingi mpenza koleka," ebakisi M. Zorilla. Bato mingi basengeli na lisungi bakozanga yango.

Mpo na M. Zorilla, lokola bikolo bipesaka misolo bisimbamo na COVID19, ekoki kosalama ete babosana RDC eye ezali mpenza te na ba enjeux (makambo ma motuya) stratégiques ya bikolo ya poto mpe Amerika lokola "menace terroriste" mpe "immigration massive".

Nzokande bato 5 millions bakima bitumba mboka na bango kati RDC likolo na bitumba bisika mingi lokola Ituri, Nord-kivu, Sud-Kivu mpe na Katanga ya kala..

Bokono mingi lokola Ebola mpe misusu bozali kongala na mboka. Kintuntu ezonga lisusu na RDC mpe ebomi bato 6.000 na 2019. Chol♪0ra mpe ezali mpe COVID mpe ezali.

XS
SM
MD
LG