Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Moto moko amonani na Ebola ne Beni


Bopesi magwele ya Ebola na Nord-Kivu, RDC, 20 novembre 2019. (Twitter/OMS)
Bopesi magwele ya Ebola na Nord-Kivu, RDC, 20 novembre 2019. (Twitter/OMS)

Moko moko amonani na Ebola na Beni, na Nord-Kivu, mikolo tuku mitano na mibale nsima na moto ya suka azwamaki, elobi bayi Comité multisectoriel ya bitumba na Ebola (CMRE) na liyebisi.

Moto yango azawami na bokono boye ntango etikalaki mikolo mibale yambo bakambi ya ekolo Congo démocraique mpe baye ba OMS (Mabongisami ma molongo mpo na bokolongono) basakola suka ya bokono bwa Ebolana monyele ya mboka.

"Mampinga ma biso mawuti kosakola o’mokolo mwa mitano le 10 avril 2020 moto ya sika amonani na bokono ya virus Ebola na etuka ya Nord-Kivu na Beni," elakisi liyebisi ya CMRE.

"Ezali elenge mobali ya mibu 26 na territoire ya Beni." ebakisi liyebisi.

Mikolo mileki, Dr Jean-Jacques Muyembe ayebisaki ete manso mabongisami mpo kosakola suka na Ebola na est ya RDC, kasi atalisaki kobangi ete bato babisami na Ebola bakoki kopesa bokono boye na bosangani ya nzoto na bato bazali nzoto kolongono.

XS
SM
MD
LG