Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Parlement européen epesi maboko na bosenga ya Dr. Mukwege ya kokela tribunal pénale interantional


Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel mpe Sakorov, na bokutani na bapanzi sango na Tokyo, Japon, 3 novembre 2019.
Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel mpe Sakorov, na bokutani na bapanzi sango na Tokyo, Japon, 3 novembre 2019.

Bakeli mibeko ba Union européenne basakoli, na likita lya bango vendredi na Bruxelles, ete bazali kopesa maboko na bosenga ya Dr. Denis Mukwege mpo na bokelami bwa tribunal pénal international na ntina ya RDC.

Bakeli mibeko ya Europe balekisi mpo na yango mokano moko.

Mokano mwango mondimi bokelami bwa tribunal pénal international mpe ya suku to chambres mixtes ekosangisa bazuzi ya RDC na bayi ba molongo kati na misala mya bosembo ya Congo na ntina ya kolandela bato basalaki mbeba ya makoki ma bomoto.

"Etikali sik’oyo mosala ya lisatwale, ya bosembo, Congo moko esika kimya etyama, Congo moko eyokona na lisitwale na yango, Congo moko ezali kosukisa bozangi etumbu ya bato mabe. Yango nde Congo ya Dr. Mukwege, eye Europe esengeli kopesa maboko na maloba kaka te, kasi na misala," elobi moko na bakeli mibeko ya Europe ya lingomba Renew, Frédérique Ries.

Dr. Mukwege, oyo azwaki mbano ya Sakarov mpe ya Prix Nobel ya Kimya, asengaki mposo mibale mileki, liboso lya ba bakeli mibeko ya Europe na Bruxelles, bokelami bwa tribunal eye.

Dr. Mukwege azali mpe kosenga botiami na mosala ya rapport mapping ya Nations unies. Rapport yango elakisi mbeba mingi misalama wuto 1990 na RDC mpe etanga ata bikolo bya bapaya bizali na mbeba yango.

Bakeli mibeko ya Europe basakoli ete basepeli na komona ete bokengi bopesameli lisusu Dr, Mukwege oyo bato baike batindela maloba ya kokana kosala mabe, lokola mpe libota mpe basali ba ye.

Dr. Mukwege asi asalisa basi koleka 55.000 babebisamaki na kozwama na makasi na basimba minduki mpe baye basalaka bitumba.

XS
SM
MD
LG