Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Dénise Nyakeru na Kigali


Molongani ya president Felix Tshisekedi, Denise Nyakeru, na masolo na mokokaani wa ye, mwasi ya president Paul Kagame, na Kigali, Rwanda, 9 juin 2019. (Twitter/Firs Lady of Rwanda)
Molongani ya president Felix Tshisekedi, Denise Nyakeru, na masolo na mokokaani wa ye, mwasi ya president Paul Kagame, na Kigali, Rwanda, 9 juin 2019. (Twitter/Firs Lady of Rwanda)

Molongolani ya président Félix Tshisekedi, Dénise Nyakeru Tshisekedi azali na Kigali, engumba mokonzi ya Rwanda, banda ntongo, mpo na kokutana na mokokani wa ye, mwasi ya président Paul Kagame, Jeannette Kagame.

Bakonzi ya ekolo Rwanda basakoli ete mobembo mwa Mme Nyakeru mokazala ya mikolo mibale.

Balongani ya bakonzi ya mboka babale baye bakosolola ndenge nini kosunga na bikolo na bango, mingi mpeza na misala mitali basi mpe bilenge.

Na nzela na ye mpo na kokende Rwanda, Denise Nyakeru alekaki liboso na Goma mpe na nsima na Bukavu.

Na Bukavu, Mme nyakeru akendaki na hôpital ya Panzi esika wapi basi bazwama mpe babebisama na makasi bazwaka lisalisa. Molongani ya mokonzi ya mboka Congo démocratique apesaki longonya na Dr. Dénis Mukwege, mokambi ya hôpital eye.

XS
SM
MD
LG