Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Boloko ya libela mpo na mokambi ya ba Raïa Mutomboki, Koko di koko


Elenge mwasi na mwana na mokongo amemi monduki na lisanga ya ba Maï Maï, na Bunyakiri, Sud-Kivu, 14 janvier 2004.
Elenge mwasi na mwana na mokongo amemi monduki na lisanga ya ba Maï Maï, na Bunyakiri, Sud-Kivu, 14 janvier 2004.

Tribunal ya mampinga ekateli mokambi ya ba Maï Maï Raï Mutomboki, Fréderic Masudi Alimasi (Koko di Koko) boloko ya libela na Bukavu (Sud-Kivu), nsima na kosambisa ye mpo na koboma bato ebele mpe kozwa basi na makasi.

Fondation Panzi ya Dr. Denis Mukwege, prix Nobel ya 2018, ezalaki kati na baye bafundaki ye.

Koko di Koko "akatelami etumbu mpo na mbeba ya bomoto ya kozwa basi na makasi, kobama na poison (ngenge), konyokola, koboma, kotiya bato na bohumbo ya kozwama na makasi mpe kolimwisa bato," elobaki mokambi ya tribunal eye.

Koko di Koko akambaki Raïa Mutomboki wuto mibu tuku mibale na mitano.

Basimba minduki babale mpe bakatelami mibu zomi na mitano mpe tuku mibale ya boloko.

Mibale misusu batikami.

Basembeli balobi bakosenga bosambisi bosusu.

Kati ya butu ya le 8 ti le 9 févier 2018, Koko di Koko mpe babundi baye bakotaki na mboka Kabikokole na territoire ya Shabunda. "Bakangaki basi pene na nkma mpe bamemaki bango mpo na kozwa bango na makasi moko nsima na mosusu," etatoli Fondation Panzi.

Bosambisi bwa ye bobandaki le 12 septembre, mibu mibale mikokaki te nsima na mbeba yango kosalama na etuka eye, epayi wapi ba ONG ya bisika yango mpe ya bapaya emekaka kobunda mpo ete bozangi ya etumbu bosila.

XS
SM
MD
LG