Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Tshisekedi akutani na Mukwege na New York mpe alaki kopesa ye mbano


Président Félix Tshisekedi akutani na Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel ya 2018, na New York, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi akutani na Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel ya 2018, na New York, 24 septembre 2019. (Facebook/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi akutanaki na Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel ya 2018, na masolo ya pembeni, na 74e assemblée générale ya ONU o'mokolo ya yambo na mpokwa, na New York.

M. Tshisekedi alaki kopesa ye lokumu na bozongi na Kinshasa.

"Tokopesa lokumu mpe mpalata ya kondima, na Dr. Mukwege na Kinshasa mpo na mosala na ye mpe mpo na mbano ya Nobel. Tozali na lipumbu (fiers) mpo na oyo asali," elobi nsima na bokutani bwango, ambassadeur itinérant ya misala ya M. Tshisekedi, Luc Gérard Nyafe.

Masolo na bango matalaki mingi mpenza Fonds international mpo baye babika nsima kozwama na makasi (violene sexuelle).

"Nazepeli mingi mpo présidet Félix Tshisekedi alaki ete RDC ekozala kati na bikolo biye biko pesa maboko na Fonds international mpo baye babika nsima kozwama na makasi (violene sexuelle)," elobi Dr. Mukwege na bobimi bwa ye.

Dr. Mukwege ayaki na bokutani ya Nations unies mpo kosenga molongo kopesa maboko na Fonds international mpo baye babika nsima kozwama na makasi.

Fonds mondial ya baye babiki nsima na bozwami na makasi ekobanda kosala le 30 octobre ekoya, France, Allemagne na bikolo bisusu basili kondima kopesa maboko.

Dr. Mukwege azali kobwaka mbela ya kosunga, elongo na Nadia Murad oyo bakali Prix Nobel bazwaki elongo.

XS
SM
MD
LG