Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Dr Mukwege alongwe na bokambi bitumba na COVID19 na Sud-Kivu


Denis Mukwege, Prix Nobel ya kimya mpe gynaecologiste na Bukavu, Sud-Kivu, 5 octobre 2018.
Denis Mukwege, Prix Nobel ya kimya mpe gynaecologiste na Bukavu, Sud-Kivu, 5 octobre 2018.

Dr. Denis Mukwege, Prix Nobel ya kimya ya 2018, asakoli ete alongwe na bokambi bitumba na bokono bwa COVID19 na etuka ya Sud-Kivu.

Apameli bozangi nkisi ya kosala test na Sud-Kivu mpe bozangi botosi bwa malako ya kopekisa bokono bopanzana.

Mokambi ya Sud-Kivu, Théo Ngwabidje, atiamaki ye na ebonga yango le 30 mars.

"Esengeli mposo mibale yambo na kozwa bilembo bya prélèvements totindaka na Kinshasa" yango "ezali likama linene mpo na mayela tozali kosalela," elobi Dr. Mukwege.

"Stratégie to mayele mango mazali : 'tester, indetifier, isoler mpe traite'," ebakisi Dr. Mukwege.

Monganga oyo abikisaka na lipaso basi bawe babebisama na kozwama na makasi, Dr. Mukwege apaleli lolenge bato balembisi kolanda mikano ya kopekisa bokono.

Dr. Mukwege asepeli te ndenge bato bazali kokota mpe kobina ndelo ua mboka. Bakoni mingi bazali kowuta mboka ya bapaya.

Sud-Kivu ezali etuka ya misato na motango ya bakoni mingi (89) ya COVID19 na RDC. Ezali na ndelo na mboka misato:Rwanda, Burundi na Tanzanie.

4.390 nde motango ya babeli banso bayebani na COVID19 na RDC. 96 bakufi mpe 565 babiki.

XS
SM
MD
LG