Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Tshisekedi, bikolo bya Union na Macron basololi mpo na bopesi mangwele ma COVID-19 na Afrika


Président Félix Tshisekedi azali kokamba likita lya bakonzi ba bikolo bya Unioin africaine na visioconférence, Kinshasa, RDC, 3 mars 2021. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi azali kokamba likita lya bakonzi ba bikolo bya Unioin africaine na visioconférence, Kinshasa, RDC, 3 mars 2021. (Twitter/Présidence RDC)

Président Félix Tshisekedi bo’ mokambi ya Union africaine asolalaki na visioconférence na bakonzi ba bikolo bisusu ya Afrika na Emmanuel Macron ya France mpo bopesi mangwele ma COVID-19 mpe ndenge COVID-19 ezali kokende na mokili.

"Lolenge COVID-19 ezali kokende na mokili mpe bobandi ya bopesi mangwele mpo na kobundisa COVID-19 na Afrika ezalaki mama na likambo ya masolo mango," eyebisi présidence ya RDC na Twitter.

Mokambi ya commission africaine, Moussa Faki Mahamt elongo na président Cyril Ramaphosa ya Afrique du Sud (Afriak ya Ngele) bazalaki mpe na masolo mango.

Bikolo mingi bya Afrika biwuti kozwa lisungi lya mangwele ma COVID-19 ya ONU na nzela ya misala ya COVAX,

RDC ezwaki wuto mardi mangwele 1,7 millions.

Ministre ya mambi ma bokolongono ya RDC, Dr. Eteni Longondo alobi bopesi mangwele boko banda le 12 mars.

XS
SM
MD
LG