Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Conseil ya sécurité ya ONU ebakisi embargo ya bitumbi kino 2022 na RDC


Minduki mamapinga ma RDC mabotolaki na Sud-Kivu, RDC, le 5 novembre 2017. (VOA/Ernest Muhero)
Minduki mamapinga ma RDC mabotolaki na Sud-Kivu, RDC, le 5 novembre 2017. (VOA/Ernest Muhero)

Conseil ya sécurité ya Nations unies endimi na maponami kotika embargo to bopekisi botali bibundeli na RDC kino le 1er juillet 2022.

Bopekiisi botali mpe kosala mibembo mpe bokangi ya bozwi bopesama na bato mpe mangomba maike na mboka eye batangama na bobomi mpe kosala.

Embargo yango ezalaka te mpo na mbulamatari kasi mpos na mangomba ya basimba minduki mpe batomboki.

Conseil ya sécurité endimaki embargo yango na boponi ya bato banso o’mokolo mibale na New York, na Etats-Unis.

Conseil ya sécurité ebakisi mpe mikolo, kino le 1er aout 2022, na etinda ya Groupe d’experts baye basungaka comité ya sanction .

Bayi Conseil ya sécurité basengi mpe bikolo bitiaka manzaka na kotosa bilaka na bango ya boyokani to Accord-cadre mpo na kimya, bokengi mpe bondeko mpo na Ekolo Congo démocratique na etuka eye ya Afrika.

XS
SM
MD
LG