Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Concert ya Werrason na Zenith ya Paris entindikami le 25 septermbre


Werrason to Noel Ngiama Makanda
Werrason to Noel Ngiama Makanda

Concert ya Artiste musicien Werrason oyo esengelaki kobetama na mokolo mwa mposo le 17 septembre na Zenith de Paris, mokobetama lisusu te mpe mopusami o mokolo mwa le 25 septembre ya sanza eye.

Site officiel ya Zenith oyo epesi sango eye elobi te soki bopusani boye bozali mpo na nini.

Kasi Lelo na ntongo, ma fanatiques ya Werrason bakendeki kotambola mpe kolakisa nkanda na bango na liboso ya maison Schengen mpo na kosala ete bapesa ba musiciens ya werrason ba visas oyo ekopesa bango nzela ya kokende mboka France.

Kasi eyebani naino te soki bopusami ya Concert eye ezali mpo na bozangi kozua visa ya ba musiciens ya Wenge Musica maison mère.

Mbala ya suka Werrason na wenge musica maison mère babetaki na mikili mya mpoto ezalaki na mobu 2010 na Zenith ya Paris.

Banda mibu koleka zomi na moko, balanga nzembo ya minene ya ekolo Congo démocratique (RDC) babetaka lisusu mindule na mikili ya mpoto te mpo ba Congolais baike baye bamibengaka ba combattants, basepelaki te lolenge balanga nzembo ya minene ya mboka bayembaka ba nzembo mpo na ko kumisa mpe kotombola mokambi ya kala ya RDC, Joseph Kabila na campagne électorale.

Na sanza ya mibale ya mobu moleki 2020, Fally Ipupa oyo azali moko ya balanga nzambo ya minene ya RDC abetaki concert moko ya monene na Bercy nsima mibu zomi ya bozangi kobeta ya miziki ya Congo na mikili ya mpoto, ata ko ba combattants basalaka mobulu ya kopanza mpe kotumba mituka na mboka Paris mpo ete mindule na ye mibetama te.

Alanga Nzembo mosusu ya monene, Koffi Olomide, akani mpe kobeta ya ye concert o’mokolo mwa le 27 novembre 2021 na Paris la défense Arena, eye ezali esika ya masano ya monene na mboka Paris na France.

XS
SM
MD
LG