Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Josky Kiambukuta awei na mibu 72


Josky Kiambukuta awei dimanche 7 mars 2021
Josky Kiambukuta awei dimanche 7 mars 2021

Alanga nzembo Josky Kaimbukuta akufi o’mokolo mwa Eyenga na mibu 72, elobi bayi libaota na ye.

"Akufi na Clinique Ngaliema, na Kinshasa," elobi mwana wa ye Eric Mpoyi.

Alanga nzembo ya Bana OK, Josky Kiambukuta abetaka mindule mingi pene pene na nkondo Francko Luambo Makiadi na OK Jaz wuto 1972.

Azalaki moko na baye batikaki OK Jaz nsima na liwa lya Franck Luwambo Makiadi mpo na kolanda nkondo Simaro Lutumba mpe kokela Bana Ok.

Atiki banzembo mingi bato balinagaka.

Abandaka mindule na African Fiesta Sukisa ya Dr. Nico Kasanda.

Ayemba nzembo mingi ya bebeti mindule misusu.

XS
SM
MD
LG