Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Alanga nzembo Gims atondisaki stade ya France


Alanga ekolo Congo démocratique, Gims na mindule na stade ya France, liboso ya bato koleka 80.000, St-Denis, Paris, 28 septembre 2019..
Alanga ekolo Congo démocratique, Gims na mindule na stade ya France, liboso ya bato koleka 80.000, St-Denis, Paris, 28 septembre 2019..

Rappeur to alanga nzembo ya ekolo Congo démocratique, Gims, mwana ya moyembi Djuna Djanana, abetaki mindule o’mokolo ya mposo na stade ya France liboso ya bato koleka 80.000.

Gims azali alanga nzembo ya yambo ya Afrika ya kotondisa libanda liye ya masano.

Bato batondaki kino na etando ya kobeta ndembo.

Ezalaki spectacle son mpe lumière ya lolenge ya malonga mpe ya kilo, lokola ba nganga ya mindule bayebana ma mokili basalaka.

Elongo na Gims, balanga nzembo basusu ya mokili, mingi mpenza ba rappeurs, bayembaki mpe.

Kolanda bato nzinganzinga na ye, basali ya mwinda koleka 4000, ya son mpe koleka 400, mpe bato bazwaka bilili mingi mpe basalaki mosala yango mpo na spectacle malamu ya makambo maye ya mokili.

XS
SM
MD
LG