Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba episkopo ya katoliko basengi mbongwaka ya lolenge na kokambi mboka


Mokambi ya Conférence épiscopale nationale du Congo (CENCO), Mgr Marcel Utembi elongo na molobeli ya CENCO, abbé Donatien Nshole na masolo na bapanzi sango na Kinshasa, 30 décembre 2016.
Mokambi ya Conférence épiscopale nationale du Congo (CENCO), Mgr Marcel Utembi elongo na molobeli ya CENCO, abbé Donatien Nshole na masolo na bapanzi sango na Kinshasa, 30 décembre 2016.

Ba episkopo ya eyamba katoliko na ekolo Congo démocratique basengi ete mbongwaka ekota ya lolenge ya kokamba mboka.

Balobi yango na liyebisi lisakolami lundi liboso ya bapanzi sango na Kinshasa.

"Conférence épiscopale nationale du Congo (CENCO) esengi ete parlement ezala mpenza na mosola ya bana ya mboka baye baponaki mpo na mbongwana, basalela ntango malamu mpo na kotiya mibeko miye mikomema o’boso démocratie na esika ya bolamu ya bato bayike ya ngambo moko," eyebisi molobeli ya CCENCO, abbé Donatien Nshole, na bapanzi sango na Kinshasa.

Ba episkopo balobi esengeli kobongola mobeko ya maponami mpo na ezala lisusu "politisé" te.

Kasi bakebisi majorité parlementaire nzinganzinga ya mokonzi ya kala Joseph Kabila mpo na koluka kobolongola mobeko likonzi mpe mobeko ya maponami mpo na bolamu ya moto moto to ya lingomba moko.

Bapameli likambo ya kaniaka na misla ya bosembo mpe lolenge botiyami ya gouvenrement bozali kowumela.

Ba episkopo tuku minei na minei batiye manzaka na liyebisi ebimisami na bokutani na bapanzi sango na Kinshasa.

XS
SM
MD
LG