Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Boyokani misatu bosalami nsima na bokutani ya Tshisekedi na Erdogan na Turquie


Président Félix Tshisekedi ya RDC (G) na mokokani wa ye ya Turquie Recep Tayyip Erdogan (2e G) elongo na balongani ba bango na limpati na Ankara, Turquie, 7 septembre 2021. (Twitter/Présidence RDC)
Président Félix Tshisekedi ya RDC (G) na mokokani wa ye ya Turquie Recep Tayyip Erdogan (2e G) elongo na balongani ba bango na limpati na Ankara, Turquie, 7 septembre 2021. (Twitter/Présidence RDC)

RDC na Turquie basali boyokani na makambo masato nsima na masolo kati na president Félix Tshisekedi (RDC) na Recep Tayyip Erdogan (Turquie) na Ankara.

M. Tshisekedi ayambamaki na mokokani wa ye M. Erdogan mardi.

"Bikolo mibale bitie manzaka na boyokani misato : Ya bobateli ba investissements, ya koboya kofutisa mpako mbala mibale mpe kobundisa fraude fiscale mpe ya suka, ya maye matali tourisme," elobi présidence ya RDC.

Masolo kati na presidents Tshisekedi na Erdogan matalaki boyokani kati na bikolo mibale mpe bondeko kati na Turquie na Afrika. M. Tshisekedi azali sika mokambi ya Union africaine.

Bakonzi ba bikolo mibale balakisi bolingi na bango ya kokolisa mombongo kati mboka mibale na ntina ya kokomisa yango na 250 millions ya ba dollars kala mingi te, ebakisi presidence ya RDC.

M. Tshisekedi abandaki lundi mobembo mwa ye ya mikolo misato na Turquie.

XS
SM
MD
LG