Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mondial ya basket: USA, Australie na France baleki na 1/4 ya finale


Kemba Wlaker (G) mosani ya USA aleki Evangelos Matzans ya Grèce na lisano ya group K na Coupe du monde ya baskeball na Shenzhen, Chine, 7 septembre 2019.
Kemba Wlaker (G) mosani ya USA aleki Evangelos Matzans ya Grèce na lisano ya group K na Coupe du monde ya baskeball na Shenzhen, Chine, 7 septembre 2019.

USA, France na Australie baleki o'mokolo ya mposo na 1/4 ya finale ya Mondial ya basket na Chine. Etikali koyeka ekolo ya minei ya ngambo eye nsima na bondwana kati na Grèce na République tchèque.

O'mokolo ya minei: Serbie, Espagne, Argentine na Pologne balekaki na quarts ya finale na ngambo na bango.

Nsima ya elonga ya pasi na mitono moko liboso ya Turquie, USA elakisaki makasi na yango liboso ya Grèce ata yango ezali na mosani ya malamu koleka MVP ya championnat américain (NBA). Basani ya Amerika balongi Grèce 69-53.

Nzokande ba Turcs balongi 93-71 ba Brésiliens. Yango ezali bokweyisami ya yambo ya monene ya Brésil. Epesi nzela na ba Grecs kowelela na ba Turcs qualification na macth ekobetama lundi.

Australie nde elongi République dominicaine 82-76.

France eleki na elonga na yango 78-75 liboso ya Lituanie.

O'mokolo ya eyenga Serbie ekondongwana na Espagne mpe Argentine na Portugal.

XS
SM
MD
LG