Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Benjamin Mkapa mokonzi ya kala ya Tanzanie akufi


Tata mokonzi ya kala Tanzanie Benjamin Mkapa, mobondi ya kala ya matata na RDC akufi na Dasr es Salaam.
Tata mokonzi ya kala Tanzanie Benjamin Mkapa, mobondi ya kala ya matata na RDC akufi na Dasr es Salaam.

Benjamin Mkapa, mokonzi ya kala Tanzanie mpe mobondi ya kala ya matata na RDC akufi na mibu 81.

Président ya Tanzanie, John Magafuli nde asakoli liwa ya moko na baye akitana na ye.

Tozali na matanga monene. Kulutu na biso, tata mokonzi ya misato na ekolo, Benjamin Mkapa, akufi na lopitalo ya Dar es Salaam epayi wapi azalaki kosalisama, ekomaki na na liyebisi M. Magafuli.

M. Mkapa azalaki na bokonzi wuto 1995 kino 2005. Aponamaki mbala mibale mpo na mibu mitano.

Azalaki mobondi ya matata kati na RDC mpe na bikolo nzinganzinga na masolo mamemaki boyokani ya Lusaksa na 1999.

Asalaki mpe misala mpo na kimya mboka misusu ya Afrika.

XS
SM
MD
LG