Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Mokonzi ya kala ya Kenya Arap Moi akufi


Président Daniel arap Moi azali kolapa ndayi na Biblia na maboko na Nairobi, Kenya, 5 janvier 1998.
Président Daniel arap Moi azali kolapa ndayi na Biblia na maboko na Nairobi, Kenya, 5 janvier 1998.

Mokonzi ya kala ya Kenya Arap Moi akufi na ntongo ya mardi 4 janvier 2019 na mibu tuku libwa na motoba. Président ya Kenya, Uhuru Kenyatta apesi mitindo mpo na matanda masalama na mboka na ye.

Arap Moi akambaki mboka Kenya mibu tuku mibale na minei, wuto 1978 kino 2002.

"Ezali na mawa mingi nde nasakoli liwa ya moto ya l’Etat moko monene kati na Afrique, son excellemce Daniel Toroitich Arap Moi, mokonzi ya mibale ya Kenya," ekomi president Kenyatta na liyebisi.

Molakisi ya kala, Arap Moi akitanaki na bokonzi na Kenya na Jomo Kenyatta, tata ya mokonzi ya sik’oyo Uhuru Kenyatta na 1978.

Arap Moi awumelaki na bokonzi na Kenya koleka bakonzi banso.

Elongo na Mobutu Sese Seko, mokonzi ya kala ya RDC (ex-Zaïre), Arap Moi abikaka na likama ya mpepo ntango bakokani wa bango ya Rwanda, Juvenal Habyarimana mpe ya Burundi Cyprien Ntaryamira bakufaki na 1994.

Le 6 avril 1994, M, Mobutu akendaki lisusu te na bokutani ya Dar-es-Salaam (Tanzanie) ekambaki na M. Moi mpo na matata maye mazalaki na kati na ba tutsi na ba hutu na Rwanda mpe Burundi. Kolanda télévision nationale ya Zaïre, mpepo ya M. Mobutu ezwaki nkwokoso na escale asalaki.

Nsima na bokutani yango, mpepo ezalaki komema ba présidents Cyprien Ntaryamira ya Burundi na Jevenal Habyarimana ya Rwanda ebetamaki masasi na bokiti na yango Kigali. Yango nde ezalaki ebandeli ya génocide to bobomami ya monene na Rwanda mpe Burundi.

XS
SM
MD
LG