Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bemba andimi mabongisi ma mobeko mpo na mbongwana ya maponami ya lingomba ya ba 13


Jean-Pierre Bemba, vice-président ya kala ya RDC mpe mokambi ya MLC, na Bruxelles, le 24 juillet 2018.
Jean-Pierre Bemba, vice-président ya kala ya RDC mpe mokambi ya MLC, na Bruxelles, le 24 juillet 2018.

Jean-Pierre Bemba, mokambi ya MLC (Mouvement de libération du Congo) alobi ete andimi mabongisi ma mobeko lingomba lya ba 13 litiki na Parlement.

"Nsima na kokutana na lingomba ya bato 13 mpe na kotanga mabognisi ya mbongwana ya misala mya maponami, na sakoli polele ete napesi maboko na makanisi maye mpe na mabongisi ya mobeko malandi yango," ekomi M. Bemba na compte Twitter na ye.

Lingambo ya ba 13 lisalama na bakeli mibeko ya ngambo mingi mpe na bato basusu.

Batikaki na parlement vendredi mokanda ya kobongisa makanisi na bango mapesamaki mokolo moko yambo na yango na ndako ya bokeli mibeko.Ezali mabongi ya mobeko mpo na mbongwana na maponami.

Kati na makambo basengi, ba 13 balingi ete maponami ma mokonzi ya mboka mazongela kosalama mbala mibale (2 tours).

Basengi mpe ete mbulamatari ekela libenga moko mpo na kotiaka misolo ya maponami mpe kozela te ngonga ya suka.

Basengi na CENI kozwa lotomo ya kosakola bilembo bya maponami na bureau de vote nyonso. Mpe mokambi ya CENI esengeli azwa etumbu soki asali mbeba.

XS
SM
MD
LG