Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

UDPS eboyi Forum ya prof. Kabamba ya kobongisa maponami ma 2023


Balandi ba UDPS (Union pour la démocratie et le progrès social) na ndako ya lingomba na bango na Limete, Kinshasa, 21 décembre 2018.
Balandi ba UDPS (Union pour la démocratie et le progrès social) na ndako ya lingomba na bango na Limete, Kinshasa, 21 décembre 2018.

UDPS, lingomba lya président Félix Tshisekedi, ekozala te na "Forum ya haut niveau" mpo na kobongisa mgowana ya maponami ma 2023, elobi Augustin Kabuya.

"UDPS ekozala na forum eye esalami na professeur Kabamba. Tokoki te komikotisa na makambo mpe mobingisi na yango mpo ewuti mboka ya bapaya," elobi M. Kabuya.

Forum yango etelemisamaki nsima na mokolo ya yambo na yango na Kinshasa. Ebandisamaki na professeur Bob Kabamba mpe ezwaki lisungi lya Université ya Liège na Belgique.

Prof Bob Kabamba asakolaki na VOA Lingala ete azali koluka komema bato banso na likita lyango mpo na bomoko bozwama na mbongwana bato banso bazali kosenga na ntina ya maponami ma 2023.

CACH, lisanga ya boyokani esangisa UDPS, UNC na mangomba masusu, mpe FCC ya mokonzi ya kala Jpseh Kabila bazalaki te na bofugwami ya forum yango.

CACH na FCC bazali na boyokani ya bokambi mboka.

FCC ebandeli koloba mbala mingi ete masolo manso matali mbongwana masengeli kosalama kaka na kati ba institutions.

Bayi CACH mpe bazongeli kaka maloba maye.

"Institution kaka moko nde epesamela mpifo ya kotala mpe kondima mbongwana ya mobeko ya maponami, ezali parlement epayi wapi boyokani CACH-FCC bozali na bato mingi koleka. Mayele manso matikali, mazala maye mawuti o’libanda lya mboka, mazali mpamba mpe na nguya te," ekomaki na Twitter Vidye Tshimanga, moko na bapesi toli ya président Tshisekedi mpe mokambi ya lingomba Dynamique Congo Uni ezali kati na CACH.

XS
SM
MD
LG