Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bato pene na 200.000 bakimi bitumba na Ituri (HCR)


Bakima bitumba bakiti na wenze moko na Komanda, Ituri, 27 janvier 2016.
Bakima bitumba bakiti na wenze moko na Komanda, Ituri, 27 janvier 2016.

HCR (Haut-Commissariat ya Nations unies mpo na bakima bitumba – réfugiés) ebwaki mbela ya koloba ete bato 200.000 bakimi bitumba na Ituri wuto sanza ya misato.

"HCR ezali na bobangi mpo na bavandi bazwi mpasi na bitumba makasi bizali kosala na Ituri, na ekolo Congo démocratique ya Congo (RDC) epayi wapi bato 200.000 bakimi ndako na bango na sanza mibale,: elobi na conference virtuelle molobeli ya agence eye, Charlie Yaxley.

"HCR esengi ngambo inso ezali na bitumba kotosa bomoi ya ba civiles mpe misala ya lisungi. Bato millions mitano balongwe bisiki bya bango na RDC, million moko na ndambo nde na etuka ya Itrui," eyebisi M. Yaxley.

Bitumba bizali kongala na Ituri kati na mampinga ya RDC (FARDC) mpe CODECO, lingomba lilobaka ete ebundelaka ba Lendu.

Bato 700 bakufi wuto décembre 2017 na bitumba kati mamngomba ya basimba minduki ya kabila inso na Ituri.

XS
SM
MD
LG