Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Hélicoptère ekweyi na immeuble mpe moto moko akufi na New York


Mituka ya lisalisi ya lombango nsima ya bokweyi ya hélicoptère na Manhathan, New York, 10 juin 2019.
Mituka ya lisalisi ya lombango nsima ya bokweyi ya hélicoptère na Manhathan, New York, 10 juin 2019.

Moto awei nsima na bokweyi ya hélicoptère likolo ya immeuble moko na New York, na Etats-Unis.

Likama yango lisalami na quartier ya Manhathan na New York.

Ba pompiers balobi ete moto moko akufi. Hélicoptère yango ezali kolinga kokita kasi ekweyaki na makasi.

Epelaki moto, eyebisi Andrew Cuomo, mokambi ya Etat ya New York. Apoyi kondima ete badongolamiso (terroristes) basali yango.

Ayebisi ete moto akufi azalaki kati nahélicoptère.

XS
SM
MD
LG