Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Trump aboyi ba bombarder Iran nsima na bokweyisi ya drone ya USA


Mpepo (drone) Global Hawk ya Etats-Unis, photo ya mampinga ya likolo ya Ameriki, 20 juin 2019.
Mpepo (drone) Global Hawk ya Etats-Unis, photo ya mampinga ya likolo ya Ameriki, 20 juin 2019.

Président Donald Trump alobi apekisi ete mboka na ye ebeta bombes na Iran mpo na koboya ete bato ebele bakufa. Lobi, jeudi, Téhéran ekweyisaki drone moko ya Ameriki.

"Tolengelaki bibundeli mpe tolingamaki toyonala butu eleki na kobetaka ba sites misato kasi na tunaki, bato boni bakokufa," ekomi na compte Twitter na ye Donald Trump.

"Bato 150, yango ezalaki eyano ya général moko. Minutes zomi yambo na kobeta (bombes), elikangi ezala eyano ya makasi koleka soki totali bokweyisi ya drone (na biso basalaki)," ebakisi M. Trump.

Mokano ya président Trump, epekisaki mpepo ya bitumba ya Etats-Unis komata mpo na bitumba yango, kolanda maloba na ye na NBC.

Nzokande, Iran ekweyisaki jeudi drone Global Hawk moko ya Ameriki eye ezalaki kotambola likolo ya etando ya mabele na yango, elobaki bakonzi ya Iran.

Likama liye ematisi matata kati bikolo babale biye. Iran ekebisi ete ekozongisa na bitumba binso bikoya.

XS
SM
MD
LG