Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba Congolais ya ngambo mibale  bakangemi na komeka kokota na Etats-Unis wuta Mexique


Bato bayike bazali kokatisa wuta San Antonion na Venezuela mpo na kokende Cucuta na Colombia. le 3 mai 2019.
Bato bayike bazali kokatisa wuta San Antonion na Venezuela mpo na kokende Cucuta na Colombia. le 3 mai 2019.

37 Congolais ya Congo démocratique mpe ya Congo-Brazzaville bakangami nsima na kokota na Etats-Unis na bozangi mikanda, wuta Mexique, ekolo ezwami na nse ya Amerika, elobi bakonzi babatelaka ndelo.

Bakonzi ya ndelo ya Amerika balobi ete ba Congolais baye bakatisi na moyibi mpe na kozanga mikanda.

“Motango ya bapaya baye bakangami na kokoka na moyibi, mpe bawuti na mboka nzinganzinga te, mozali komata,“ elobi mokonzi ya basinzili ya ndelo ya secteur ya Del Rio, Raul L. Ortiz, kolonda misala ya bobateli ndelo ya Etats-Unis.

“Mabota mazali koya na motango ya ba nkoto mpo na kokota na moyibi na Etats-Unis mpe kosalela mibeko na biso mitali bapaya,“ ebakisi M. Ortiz.

Banda le 1 octobre, ebandeli ya mobu mpo etali mpako, ba policiers bakangi koleka 27.000 bato bawuti mboka Mexique te kasi mboka 37 esusu.

Bokangami ya bapaya baye ba wuti na Mexique te bomati na pene na 500% koleka mobu moleki.

Mokonzi ya Etats-Unis, Donald Trump, asengaka parlement ya Etats-Unis misolo mpo na kotonga efelo na ndelo na Mexique mpe kopekisa bapaya kokota na moyibi na mabele ya Amerika.

Bato bayike bakufaka na koluka kokota na moyibi mboka misusu. Basusu bamekaka kokatisa mbu enene nto mayi ya ndenge na ndenge na bwato eke to na makolo.

XS
SM
MD
LG