Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Bato 18 bakufi na bitumba na mine ya or ya Salamabila (Maniema)


Batimoli makele na maboko pene na Mambasa, na Ituri, 11 juilet 2018.
Batimoli makele na maboko pene na Mambasa, na Ituri, 11 juilet 2018.

Bana mingi bazalaki kati na bato 18 baye bakufaki na bitumba kati na mampinga ya RDC na basimba minduki, na mine ya or (wolo) ya Salamabila, na Maniema, eyebisi bayi eklezia mpe bakonzi ya esika eye.

Bana mingi bazali komonana te na esika yango, kolanda abbé Célélestin Kijana, sango na Salamabila.

"Na bobangi, bana mingi bakimaki ntango bitumba bibandaki o’mokolo mwa mposo. Ezalaki na ntango babimaki na keasi," eyebisi abbé Kijana.

"Towuti kokunda na lisungi ya bayi Croix rouge ya esika eye, nzoto 18 mpe bana bazalaki kati na bango," elobi sango Kijana.

"Nzoto mingi ezalaki na bilembo ya masasi," ebakisi nganga Nzambe.

Molebeli ya mampinga na Sud-Kivu, capitaine Dieudonné Kasereka andimi ete soda ya FARDC moko mpe basimba minduki motoba bakufaki mpe basimba minduki babale bakangamaki. Alobi eloko te mpo etali ba civiles.

Samedi, bitumbi bingalaki kati na ba FARDC na basimba minduki ya lingomba Malaika baye balobaka babundaka mpo kobatela bavandi.

Ba Malaika basengaka ete compagnie ya Canada Banro mpe baye babimisala or(wolo) bayeba kotosa cahier des charges.

Na 2017 mpe na 2019, ba Malaika bakangaki mpo mposo mingi basali ya Banro, kati na bango ezalaki na bayi ekolo France mpe Afrique du Sud.

Na septembre, Banro etelemisaki misala mya yango.

Mine eye mpe nzinga niznga ebatelamaka na mampinga.

XS
SM
MD
LG