Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Motango ya bawei momati na 21 nsima na bokweyi ya mabile na Maniema


Baluki makele na mine ya Togo-Kazaroho, na Ituri, 11 juillet 2018.
Baluki makele na mine ya Togo-Kazaroho, na Ituri, 11 juillet 2018.

Bato tuku mibale na moko nde motango ya bawei na bokweyisami ya mabele na maniema, elobi mokambi ya etuka eye na liyebisi, Augustin Musafiri.

Bato bango bakufaki na likama ya bokweyisami ya mabele na esika ya koluka wolo na Kampene, na 180 km na sud ya Kindu, engumba mokonzi ya Maniema.

Mokambi ya Maniema apesi sango mosusu te. "Bato bakufi 21," ekomi M. Musafiri na mokanda mwango.

Baye ya société civile, na ngambo na bango, bapesi motango ya koleka. Tokomi na bawei 25. "Mpo nzoto zomi misusu ebimisamaki na mabele, kati yango mwasi moso mpe mibale libwa," elobi na AFP Justin Kyanga Asumani, moko na baye ya société civile. Lobi mokolo ya misato M. Asumani apesaki motango ya bawei 15.

Motango ya baye bazalaki koluka wolo ntango ya likama moyebani te.

Nzokande SAEMATE (service d'assistance et d'encadrement de l'exploitation minière artisanale et à petite échelle, service ya l’Etat) esengaki na sanza ya mitano eleki ete bakonzi bakanga esika ya boluki wolo eye, na Kamepne, mpo esalaki nzela mingi.

XS
SM
MD
LG