Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

VP ministre ya Justice Célestin Tunda atiki mosala


Tunda atiki mosala (Vidéo)
Attendez s'il vous plaît

No media source currently available

0:00 0:02:20 0:00

Tunda atiki mosala

Célestin Tunda ya Kasende, vice-Premier ministre, ministre ya mambi ma Bosembo atikiti mosala, esakoli misala mya Ministre wa yambo na Twitter.

Sango yango mpe endimami na lingomba na ye PPRD, eye ezalaka nanse ya bokonzi ya Joseph Kabila, mokonzi ya kala ya RDC.

"Na yebi te soki esengeli naloba ete nasalaki mosala malau te, kasi na bomikitisi bonso na nazolongwa na mbulamatari nakondima ete mosala na ngai na ministère ya mambi ma Bosembo momemaki libanga ya kotonga Etat des droits (mboka ya mibeko) na mboka na biso,' elobaki M. Tunda nsima na kokutana na ministre wa Yambo Sylvestre Ilunga Ilunkamba.

Mposo moko moleki, président Félix Tshisekendi aboyaki ete M. Tunda akota na likita lya mbulamatari na vidéo-conférence.

Ezalaki nsima na M. Tunda koloba ete "Ye mei" nde abengaki mpo na atikama nsima na kopenga mpe kotunama mituma na ba zuzi ya Cour ya cassation mpo etali eyano apesaki na Assemblée nationale na ntina ya mibeko misato mibongisami na parlement mpo etali parquet na ba zuzi.

M. Tunda afundamaki na lokuta mpe kosalela lokuta,

XS
SM
MD
LG