Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakambi biyamba motoba batikaki PV na bango ya kopona motambwisi CENI basengi Assemblée nationale kondima yango


Botangi ya ba bulletins de vote nsima ya maponami, na Lubumbashi, RDC, 30 décembre 2018.
Botangi ya ba bulletins de vote nsima ya maponami, na Lubumbashi, RDC, 30 décembre 2018.

Bakambi Biyamba motoba baye batikaki nkombo ya motambwisi CENI na Assemblée nationale balobi bazali kolikya ete suku ya nse ya Parelement ekondima Procès-verbal na bango ya kopona mokambi ya CENI mpe molakisi elongi na bango na plénière. Bazalaki na bapanzi sango na Kinshasa,

Molakisi elongi ya Eglise du Réveil, prophète Dodo Kamba oyo alobi na na nkombo baninga baye batano basusu alobi ete basilisaki mosala nyonso mpe basalaki yango malamo kasi bayi Katoliko nde babimaki na ndako ya mosala elongo na bayi protestants mpe babenganaki bango na Centre interdiocésain mpe bakendaki na CIME (Commission d'intégrité et médiation électorale) kosilisa.

Dodo Kamba alobi bobangisi mpe mbamba elobamaki ezalaki kaka nungu nungu ya mpamba mpe bilembo bya yango bizali te.

Mpo na Dodo Kamba, bakambi motoba ya biyamba basalaki procès-verbal ya solo mpe mokanda bakambai banso mwambe batiaki manzaka mozalaki nde rapport ya mpomba.

Bapameli bobebisi ndako ya Nzambe ya catholique mpe bofingi cardinal Fridolin Ambongo na bakambi misusu ya catholique

XS
SM
MD
LG