Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Bakambi ba biyamba bayokani mpo etali motambwisi ya CENI (Mgr Utembi)


Mgr Marcel Utembi, mokambi ya CENCO (Lingomba lya ba episkopo ya RDC) na Kinshasa, 30 décembre 2016.
Mgr Marcel Utembi, mokambi ya CENCO (Lingomba lya ba episkopo ya RDC) na Kinshasa, 30 décembre 2016.

Bakambi ba biyamba basili mosala ya kopona motambwisi ya CENI mpe molakisi ya bilongi na bango na plénière ya misala mya maponami, esakoli Mgr Marcel Utembi nsima na likita basalaki wuto ntongo.

Bakambi ba biyamba basuki bongo na koyokana nsima na matata kati na bango.

Motoba kati na motango ya mwambe bazalaka, basakolaki mikolo misato mileki ete bazwaki nkombo ya motambwisi ya CENI na bozangi ya bayi CENCO, ba episkopo ya Katoliko mpe ya ba misioni, ECC (Eglise du Christ du Congo).

Kasi mokambi ya Assemblée nationale aboyaki kozwa mokanda ya ngambo moko mpe epesaki bango ngonga tuku minei na mwambe esusu mpo bakoka koyokana lisanga.

Vendredi, Mgr Marcel asakoli ete ba bakambi babiyamba batindi mokanda ya lisanga na bango mobimba na Bureau ya Assemblée nationale.

Nzokande, Mgr Utembi apameli misolo mpe mbongo baike balakaki na bakambi ba biyamba baike mpo na kondima bato baboyami.

XS
SM
MD
LG