Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba FARDC bakokolisa boyokani na mboka nzinga nzinga mpo na kobundisa ba ADF, FDLR mpe basusu


Molebeli ya ba FARDC, général Léon-Richard Kasonga, azali kosakola sango na banzi sango na Beni, Nord-Kivu, 31 octobre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)
Molebeli ya ba FARDC, général Léon-Richard Kasonga, azali kosakola sango na banzi sango na Beni, Nord-Kivu, 31 octobre 2019. (VOA/Erikas Mwisi)

Mamapinga ma Ekolo Congo démocraituqe, ba FARDC basakoli ete bakomema boyokani bozalaka na mboka nzinga nzinga na bikolo misusu ya pembeni na ntina ya koluka kosuka libela nkwokoso ya bozangi bokendi na mboka mpe na etuka.

Molebeli ya mampinga général-major Léon-Richard Kasonga alimboli, na liyebisi, ete ba FARDC bazali mpe koyikisa makasi na boyokani na’ mapinga ma Rwanda, ma Ouganda, ma Angola mpe ma Centrafrique mpo koluka kosukisa libele mangomba ya basimba minduki mpe ya ba dongolomeso lokola ba ADF/MTM, ba FDLR na ba FNL mpe ba Forces négatives ya libanda mpe ya kati mboka.

Boyokoni bwango bokosala mingi na kopesana sango ya bokengi.

Na 2019, bokutani boko bosalamaki na Goma nse na ntina wana na’ mampinga ma Rwanda, ma Burundi, ma Ouganda mpe ya Tanzanie elongo na MOunsco , Africom mpe bayi CIRGL.

XS
SM
MD
LG