Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles
RDC

Ba FDLR 1.200 batiki minduki mpe bamipesi na ba FARDC na Sud-Kivu


Molebeli ya FARDC (Forces armées de la RDC), général Léon Richard Kasonga na Goma, Nord-Kivu, 25 octobre 2019. (VOA Lingala)
Molebeli ya FARDC (Forces armées de la RDC), général Léon Richard Kasonga na Goma, Nord-Kivu, 25 octobre 2019. (VOA Lingala)

Batomboki 1.200 ya CNRD, moko na mangomba kati ya ba FDLR (Forces democratiques de libération du Rwanda) bakitisi minduki mpe bazongisami na maboko ya mampinga ya RDC, eyebisi molobeli ya ba FARDC, général Léon-Richard Kasonga.

"Ezali etapi enene mpo na kosukisa bozangi bokengi… na ndelo kati na biso mpe mboka pembeni, Rwanda," elobi Gén. Kasonga na bokutani na bapanzi sango na Beni, na Nord-kivu.

O’mokolo ya minei, mbulamatari asakolaki bokangami ya boko ya bakambi ya unité d’élite ya FDLR mposo moleki na Goma.

Ba FARDC balobaki na septembre ete babomaki mokambi ya FDLR, Sylvestre Mudacumura, ekela eye Kigali epasaki losako.

Na Mai Mai mpe batikaki minduki mpe bamizongisaki na mampinga ya RDC. 861 ya lingomba ya ba Mai Mai mpe 700 ya lingomba mosusu.

"Minei ya bakambi zomi ya ba ADF tosukisi bango, lokola mpe babundi 55 mpe basungi ba bango 93 bakangamaki," elobi liyebisi ya bokutani ya mbulamatari ya mokolo ya minei.

XS
SM
MD
LG