Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba experts ya ONU bapameli Rwanda na kozwa ba mines ya RDC na mayuya


Président Paul Kagame ya Rwanda na Paris, France, 18 mai 2021.
Président Paul Kagame ya Rwanda na Paris, France, 18 mai 2021.

Ba experts ya ONU bapameli Rwanda na kolekisa makele to ba mines ya RDC na nzela ya mayuya mpe kosakola yango lonkola maye yango eteki libanda.

Ba experts ya ONU balobi ezali likambo liyebana kala kasi bilembo bimonisami sika.

Batangi société ya Amerika na nkombo ya Bay View Group eye ezali kosenga na Rwanda kofuta yango millions tuku libwa na mitano ya ba dollars mpo na lomande mpo Rwanda ekangaki makoki ma yango ntango société eye eboyaki kondima kokitaka Coltan mpe makele misusu kowuta na RDC na mayuya.

Ba experts ya ONU balobi Rwanda ebimisaka kaka pene na millions tuku mibale ya ba dollars mobu inso kasi esakolaka nde 412 millions ya ba dollars na maye ma wutaka na RDC.

XS
SM
MD
LG