Liens d'accessibilité

Dernières nouvelles

Ba civili 34 bakufi na maboko ya basimba minduki na mposo mibale na Est ya RDC


Ba soda ba FARDC, mampinga ma RDc, na Beni, Nord-Kivu, 7 décembre 2018.
Ba soda ba FARDC, mampinga ma RDc, na Beni, Nord-Kivu, 7 décembre 2018.

Bato 34 bakufi na maboko ya basimba minduki na mposo mibale na Est ya RDC, elobi Baromètre sécuritaire ya kivu (KST), lingomba litalaka bokengi na monyele ya RDC.

Wuto le 29 novembre kino le 12 décembre, ba civili 34 bakufi na maboko ya bsamiba minduki mpe batomboki na bituka ya Nord-Kivu mpe Sud Kivu, etalisi rapport ya KST lundi.

KST efundi batomboki ba ADF (Forces démocratiques alliées) na komema bacivili 19 mpe kozokisa basato.

Na bitumba motoba bikomami na rapport yango, misato misalamaki na territoire ya Beni, na Nord-Kivu.

Na territoire ya Rutshuru, KST elobi ete babundi bayebani te bamemaki basi babale mpe bilenge basi basatu.

"Bazwaki bango na makasi. Basengaki misolo $5.000 yambo batika bango," elobi KST.

Ba ADF bazali mingi batomboki ba Ouganda bakoma na RDC wuto 1995.

Bango nde bafundami na koboma bato mingi na mangomba banso ya batomboki to basimba minduka na monyele ya RDC.

Wuta avril 2019, lingomba "l'État islamique - Afrique centrale" nde ekoma koloba yango nde esalaka biyoma ba ADF basalaka.

XS
SM
MD
LG